🔗 ⚙️

Zala Mayele from RUMBATRONIC by Zalnakatar

Tracklist
4.Zala Mayele4:56
Lyrics

Eh ! Keba
Yoka liloba ya mokolo

Na mokili mwana zala mayele
Na mokili mwana zala na ngèlè

Yoka liloba ya nganga
Mayi eninganaka pamba te

Na mokili mwana zala mayele
Na mokili mwana zala na ngèlè

Il y a une anguille sous roche

Yoka yoka yoka liteya elobi kulutu elobi nganga
Soki nkoyi alakisi mino, yéba azali ko seka te
Esengeli o mi lengela, zala na ngèle eeeh
Soki mapata eyindi yéba mbula elingi ko noka
Esengeli o mi lengela, zala na ngèle eeeh

Mbwa a memelaka moninga na yé mokuwa te
Soki a memi yéba likambo ezali
Ba kosa yo te eh eh , fungola miso, zala mayele na la vie

Mwana ya soso a tondisaka nzungu te
Soki a tondisi, mama na ye azali na sè eh
Mayi ya moto etumbaka elamba te

Soki omoni ndoki, belela oh noki mongongo ekima yo
Ko bombaka ndoki te, azalaka na moninga te
Ata ndélé a ko balukela yo, po oyébi sekele na ye
A ko limwisa yo po a bomba mabé na ye

Mbwa mokengeli lopango a gangaka pamba te
Mayi e ningaka pamba te eeh
Molinga mo ko bimaka kaka moto epela

Mosapi moko e bomaka sili te
Loboko moko e mataka nzete te
Zalaka na baninga na yo malamu
L’union fait la force eeh

Zemi nionso e sukaka sé ko yebana
Sekele ya bato mibale suka sé ko bima
Sekele e bongaka moto moko
Ko bombaka sango ya zemi te eh eh

Hein yi hein hein hein yo oh oh
Hein yi hein hein hein
Hein yi hein hein hein yo oh oh
Hein yi hein hein hein
Hein yi hein hein hein yo oh oh
Hein yi hein hein hein

Hein yi hein yi hein hein hein hein hein hein hein (2X)
Aaaaaaaaaah

Credits
from RUMBATRONIC, released March 7, 2019
lead vocal : Winan Mignon (composer)
arrangements & keyboards : Thierry Van Roy
Sound engineering & production : Thierry Van Roy
LicenseAll rights reserved.
Tags
Recommendations